Menu

Elubu ya soso na mosaka

Bonsoir ba mamans na ngai ya mayele !
Lelo na memeli bino elubu ya soso na mosaka 

Kaka ndenge natie na ba photos 
Na kati soso na ngai
Na sukoli yango liboso na mayi ya malili 
Pe na sima nasukoli yango lisusu na mayi ya mwa moto muke 
Tango nasilisi kosokola soso na ngai 
Na tuti litungulu 
Na tuti ail 
Na tuti muscarde na mungwa 
Et puis na tie na moto po etoka muke 
Na sima nasokoli mbila na ngai
Pe na tie na moto 
Tango mbila na ngai ebeli 
Na tuti yango 
Na sali mosaka na ngai ya bien 
Soki mayi ya soso ekauki nde natie mosaka na tomate ya mbuma 
Na ngai ngai 
Nazongisi lisusu na moto po ebela bien 
Yango nabengi bino tolia...
Bon appétit ba mamans ngai na lingi bino mingi

Chantal Mikolo




Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

Author

authorHello, my name is Jack Sparrow. I'm a 50 year old self-employed Pirate from the Caribbean.
Learn More →



Membres

Social Share Icons

Formulaire de contact

Nom

E-mail *

Message *