Menu

Soso ya muamba na aubergine


Mbote ba maman na ngai mbala nanga ya liboso na publier biloko 

Lelo na monaki ba lobeli kaka soso ya mbika mingi 
Ngai naye na soso ya muamba avec aubergine 
Na kati soso na ngai ba partie 
Na tokisi yango na :
- mungwa 
- ail 
- muscade 
- feuille 
- soki yo oza na ndembi 
- na céleri 
Tokisela pe 
Biso awa biloko wana mibale emonanaka na pasi 
Soki osilisi kotokisa soso elembi kalinga soso nayo 
Après osali sauce nayo na  :
- litungulu 
- tomate ya mbuma 
- poivron 
- na ail 
O kalingi yango 
Après okati aubergine nayo na kati ya sauce na yo 
O zo kalinga 
Soki mayi wana ekawuki 
Tia mayi mususu po elembisa aubergine wana 
O zo fina yango na lutu 
Apres ozui mwamba nayo fina na kopo ekoma mayi mayi 
Après ozui sauce nayo soki ebeli sopa yango likolo ya soso 
Balola yango ekalingama lisusu na soso 
Après otie mayi mukie otiki etoka ata 3 minutes 
Après oye kosopa mwamba nayo likolo 
Ko balola 
Tika etoka lisusu na moto moko ya bien ata 10 minutes 
Après obalusi yango koma kozela kaka muamba ebota mafuta 
Soki ebimisi mafuta biloko ebeli 

Bon appetit 
Meka oyoka goût makasi

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

Author

authorHello, my name is Jack Sparrow. I'm a 50 year old self-employed Pirate from the Caribbean.
Learn More →



Membres

Social Share Icons

Formulaire de contact

Nom

E-mail *

Message *